“Boya, bato nyonso!” agangaki Tin “Tika tosepela! To bolingi We can Band Esalisa bino?”
“Yebo, ee!” bato bagangaki.
Tin atalaki zingazinga. “Orkestre ezali wapi? O te, nazomona bango te. Ekoki kozala feti te soki orkestre ezangi. Nakosenga lisungi. Kaka ekipi nde ekoki kobikisa ndoto oyo!” Tin asekaki ntango azalaki kotala bato. “Banda ya liboso, nazali na mposa ya babeti-mbonda mibale.”
Neo mpe Hope batyaki maboko likolo liboso. Ntango bamataki na podium ,Tin amemaki bango na bakesi minei ya minene ya kafe oyo ezali na bizipeli ya plastike. Bakesi ezalaki na ekembisami ya papier ya moindo mpe ba bouton. Ezalaki mpe baguettes ya kosalela mpona Neo mpe Hope.
“Sikoyo tolingi moto ya koningisa biloko mosusu ya miziki,” alobaki Tin.
“Josh! Pona Josh!” Neo agangaki.
“Josh azali awa? Josh azali wapi? Botika ayaka awa,” alobaki Tin.
Josh atyiaki loboko likolo. Mibali mibale batombolaki kiti naye ya bibosono na podium
“Toyambi yo, Josh,” alobaki Tin “meka biloko oyo mibale ya miziki.”
Josh aningisaki moko mpe mosusu. Ezalaki kobimisa lokito oyo ekeseni.
“Kitoko,” alobaki Tin. “SIKOYO, TIKA …”
Kasi liboso asukisa, ezalaki makelele makasi ya cliquetis Bato nyonso bazalaki kotala zingazinga mpo batala soki ezali nini.
Na sima Noodle akimaki na podium, azalaki komema mwa manzanza oyo ekangisamaki na nsinga sima naye.
“Ba carillons!” Tin agangaki. “Nakanisaki ete nabungisaki yango.”
Bella akimaki na podium. “Noodle!” abengaki ye. Noodle akimaki na Bella, manzanza ebimisaki makelele sima naye.
“Malamu,” alobaki Tin nakoseka. “Nakanisi ete Noodle alingi azala na kati ya We Can band. Mpe Nakanisi ete alingi yo pe osangana na biso,” alobaki, amonisaki Bella.
Tin asungaki Bella komata na podium mpe bango mibale bafungolaki ba carillons wana na nzoto ya Noodle. Na sima Bella mpe Noodle bakendaki kotelema pembeni ya Neo, Hope na Josh.
Tin abetaki gitare naye mpe alobaki, ”TIKA TOBANDA MIZIKI!”
Ntango Tin amonisaki Neo na Hope, babetaki mbonda na bango. Na yango Tin ayembaki, “Lokolo ya mwasi na sima,” mpe amonisaki bato.
“Lokolo ya mwasi na sima,” bayembaki bato.
Na sima Tin amonisaki Josh mpe aningisaki biloko naye ya miziki landana na mbonda.
“Lokolo ya mobali na sima,” ayembaki Tin.
“Lokolo ya mobali na sima,” bayembaki bato.
Tin amonisaki Bella. Molongo ya ba carillons ebimisaki lokito ya kitoko ntango azalaki koningisa moko na mosusu. Noodle agangaki na esengo.
Kala te feti ekomaki kitoko koleka. Tin ayembaki nzembo naye ntango Neo, Hope, Josh mpe Bella bazalaki kobeta miziki elongo naye. Mpe Noodle azalaki konganga mbala na mbala mpo na kosangana pe!
Na sima ba artistes misusu bayembaki moko na moko nzembo ya mboka na bango Bato bazalaki kobeta maboko makasi. Basepelaki feti!
“Bomoni,” alobaki Tin na We Can Band,” ekipi oyo ebikisi ndoto! Matondo po na bino minei… mpe Noodle, moto nyonso asepelaki feti!”