Neo, Josh mpe Hope bazalaki bango nyonso na ndako ya Gogo. Bazalaki kosolola mpe koseka na mongongo makasi.
“Shhhh!” alobaki Gogo. “Nazokoka te koyoka oyo bazali koloba na radiyo. Bo yaa, tika tolanda biso nyonso emisiyo oyo nalingaka.”
Bato nyonso bafandaki nyee mpe balandaki. Mbala moko bayokaki journaliste atangi nkombo ya parke na bango.
“Wow! Parke na biso eyebani!’ alobaki Neo.
“… mpe Tiniso, oyo ayebanaki na nkombo ya Tin, akoyemba na mpokwa oyo na We Can Band. Ba artistes oyo bauti na Zimbabwe, Nigeria mpe Malawi bakoyemba mpe. Bato nyonso bakoki koya kosangana na feti!” alobaki journaliste.
“Gogo,” alobaki Neo, “oyokaki yango? Balobaki ete bayambi bato nyonso. Tokoki kokende? Palado?’
Gogo alukaki Neo mpe asekaki. “Soki Josh na Hope Bandimami kokende, nde yo okoki mpe kokenda,” alobaki. Josh mpe Hope babimaki mbangu lokola engengiseli mpo bakende kosenga ndingisa epayi ya baboti na bango mpo basangana na feti na kati parke.
Ntango bazongaki kolanda Neo, Hope ayebisaki Gogo ete Bella na Mama naye mpe bakokende.
“Malamu, Okoki pe kokende. Botikala penepene,” alobaki Gogo.
Na parke, Neo amonaki Bella na mama naye, mpe ata Noodle azalaki na bango. “Nakanisi ete moto nyonso ya engumba na biso azali awa,” alobaki Neo. “Mpe bato misusu ya sika.”
“Landa …”alobaki Josh. “Ezali bato oyo basololaka na monoko ya lifalanse?”
“Ya solo!” alobaki Hope. “Nazoyoka mpe monoko ya Chichewa mpe ya Shona.”
Neo asimbaki loboko ya Hope. “Tala,” alobaki, “Tin azali na podium! Kasi We Can Band ezali wapi?”
Liboso Hope ayanola, Tin atelemaki na microphone. “Mbote!” alobaki. “TOZALI PENE MPO NA KOBANDA FETI OYO?”
“Yebo, ee!” bato bagangaki.
Tin abandaki kobeta gitare. “Bozongela sima na ngai.” Alobaki ntango abandaki koyemba. “Lokolo ya mwasi na sima.”